Pular para o conteúdo
Publicidade

Atos 8

32 Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga :

« Lokola mpate oyo bazali komema

na esika oyo babomelaka banyama,

lokola meme liboso ya moto

oyo azali kolongola yango bapwale,

afungolaki monoko na ye te.

33 Basambwisaki ye mpe baboyaki kolongisa ye.

Nani akoyebisa bakitani na ye ?

Pamba te balongoli bomoi na ye na mokili»

34 Bongo, soda oyo baboma nzoto ya mibali atunaki Filipo :

Nabondeli yo, yebisa ngai : mosakoli azali koloba makambo oyo na tina na nani ? Azali koloba yango na tina na ye moko to na tina na moto mosusu ?

35 Filipo azwaki maloba mpe, na nzela ya eteni yango ya Makomi, ateyaki ye Sango Malamu ya Yesu.

Veja também