36 Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki :
— Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi ?
[37 Filipo alobaki :
— Soki kaka ondimi wuta na motema na yo mobimba, okoki na yo kozwa libatisi.
Moto yango azongisaki :
— Nandimi ete Yesu-Klisto azali Mwana na Nzambe !]8.37 Eteni oyo ezali te kati na mikanda mingi ya kala.
38 Mbala moko, apesaki mitindo ete batelemisa shar. Bongo bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo, bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye.