10Yawe alobaki na Jozue :— Telema ! Mpo na nini omibwaki elongi kino na mabele ?
13Telema, bulisa bato. Loba na bango : « Bomibulisa mpo na lobi, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi boye : ‹ Mabe ezali kati na yo Isalaele, okolonga kobundisa banguna na yo te kino tango okolongola yango. ›
14Lobi na tongo, bokopusana pene na Ngai, libota na libota. Libota oyo Yawe akopona ekopusana, etuka na etuka ; etuka oyo Yawe akopona ekopusana, ndako na ndako ; mpe ndako oyo Yawe akopona ekopusana, moto na moto.