Pular para o conteúdo
Publicidade

Colossenses 1

12 mpe mpo ete, na esengo nyonso, bozongisaka matondi epai ya Tata oyo apesaki bino makoki ya kosangana na libula ya basantu kati na Bokonzi ya pole. Pamba te :

13 Akangolaki biso na bokonzi ya molili

mpe amemaki biso kati na bokonzi

ya Mwana na Ye ya bolingo,

14 oyo, kati na Ye,

tozwi lisiko mpe bolimbisi ya masumu.

15 Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te,

azala liboso ya bikelamu nyonso,

16 pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama

kati na Likolo mpe na mabele,

bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te,

milimo mpe bokonzi ya milimo,

bakonzi ya milimo mpe banguya.

Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu

nde nyonso ekelama.

17 Yesu azali liboso na nyonso,

mpe nyonso esimbama kati na Ye ;

Veja também

Colossenses
Ver todos os capítulos de Colossenses