Pular para o conteúdo
Publicidade

Bakolose 1

15 Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te,

azala liboso ya bikelamu nyonso,

16 pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama

kati na Likolo mpe na mabele,

bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te,

milimo mpe bokonzi ya milimo,

bakonzi ya milimo mpe banguya.

Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu

nde nyonso ekelama.

17 Yesu azali liboso na nyonso,

mpe nyonso esimbama kati na Ye ;

18 azali moto ya nzoto na Ye,

oyo ezali Lingomba ;

azali ebandeli, Mosekwi ya liboso kati na bakufi,

mpo ete azala na bokonzi ya liboso kati na nyonso,

19 pamba te, kati na Ye, Nzambe asepelaki kovandisa

bonzambe na Ye nyonso

20 mpe kozongisa, na nzela ya Klisto,

boyokani kati na Ye moko Nzambe mpe bikelamu nyonso,

ezala oyo ezali na mabele to mpe oyo ezali kati na Likolo,

na kotia kimia na nzela ya makila

oyo Mwana na Ye asopaki na ekulusu.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também

Colossenses
Ver todos os capítulos de Colossenses