Pular para o conteúdo
Publicidade

Bakolose 3:5-9

Bomoi ya sika

5 Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko. 6 Ezali makambo yango nde ebendaka kanda ya Nzambe3.6 Na mikanda mosusu, babakisa : likolo ya batomboki.. 7 Bino mpe na kala, bozalaki komipesa na makambo yango tango bomoi na bino ezalaki na se ya bokonzi ya makambo yango.

8 Kasi sik’oyo, bosengeli kolimwisa makambo yango nyonso : kanda, koyinana, misala mabe, mafinga mpe maloba mabe oyo ekoki kobima na minoko na bino. 9 Bokosanaka te, pamba te bobwakaki bomoto na bino ya kala elongo na misala na yango

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Colossenses
Ver todos os capítulos de Colossenses