10 Amonaki ye na esobe,
kati na mokili oyo ekawuka,
etonda na koganga ya somo.
Azingelaki ye, abatelaki ye,
akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.
11 Azali lokola mpongo
oyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa.
Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango,
etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango,
mpe ememaka yango likolo ya masala na yango.