Kokisaka ndayi na yo epai ya Nzambe
1 Kowelela te kofungola monoko na yo,
mpe tika ete motema na yo ewelela te
kobimisa liloba liboso ya Nzambe !
Pamba te Nzambe azali na likolo,
mpe yo ozali na mabele.
Boye, tika ete maloba na yo ezalaka mingi te !
2 Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi,
ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.