Pular para o conteúdo
Publicidade

Ba-Efeso 1:3-14

Ngolu ya Nzambe kati na Klisto

3 Tika ete lokumu epesamela

Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso,

oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo,

mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.

4 Pamba te, kati na Klisto,

apona biso liboso ete akela mokili,

mpo ete tozala bato ya bule

mpe bazanga pamela na miso na Ye.

Kati na bolingo na Ye,

5 abongisa biso wuta kala

mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye

na nzela ya Yesu-Klisto,

kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,

6 mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye,

oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.

7 Kati na Klisto,

tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye,

mpe bolimbisi ya masumu,

kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe

8 oyo akabolelaki biso yango na bofuluki,

na kopesa biso bwanya mpe bososoli nyonso,

9 mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye,

mabombami oyo abongisa kati na Klisto

kolanda bolamu na Ye,

10 mpo na kokokisa yango na tango ya suka :

kosangisa kati na Klisto

bikelamu nyonso oyo ezali kati na Likolo

mpe oyo ezali na mabele.

11 Kati na Klisto,

Nzambe aponaki biso lisusu

mpo ete tokitana na libula na biso,

kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso,

kolanda makanisi ya mokano na Ye,

12 mpo ete tosanzola nkembo na Ye,

biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso

mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto.

13 Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo,

Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto ;

mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki

mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe

14 lokola ndanga ya libula na biso

kino basikolami na Ye bakangolama

mpo na kosanzola nkembo na Ye.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.