Ngolu ya Nzambe kati na Klisto
3 Tika ete lokumu epesamela
Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso,
oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo,
mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.
4 Pamba te, kati na Klisto,
apona biso liboso ete akela mokili,
mpo ete tozala bato ya bule
mpe bazanga pamela na miso na Ye.
Kati na bolingo na Ye,
5 abongisa biso wuta kala
mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye
na nzela ya Yesu-Klisto,
kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko,
6 mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye,
oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.