Kobatela bomoko
1 Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga na bino ete botambolaka na lolenge oyo ebongi na bato oyo Nzambe abengi : 2 bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi ; boyikanaka mpiko kati na bolingo, 3 bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino. 4 Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko.
5 Nkolo azali se moko, kondima mpe ezali se moko, libatisi mpe ezali se moko. 6 Nzambe azali se moko, azali mpe Tata ya bato nyonso ; aleki bato nyonso, asalaka na nzela ya bato nyonso mpe azali kati na bato nyonso.
7 Nzokande kati na biso, moto nyonso azwaki ngolu kolanda ndenge Klisto akabolaki. 8 Yango wana Nzambe alobi :
« Tango amataki na likolo,
amemaki bakangami
mpe apesaki makabo epai na bato. »
9 Nzokande, « amataki na likolo » elingi koloba penza nini ? Elingi kaka koloba ete, liboso, akitaki kino na se ya mabele. 10 Ye oyo akitaki na se ya mabele, ezali kaka Ye wana oyo amataki na likolo koleka Likolo nyonso, mpo ete atondisa mokili mobimba.
11 Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi, 12 mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu.