Pular para o conteúdo
Publicidade

Ba-Efeso 4:2-6

2 bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi ; boyikanaka mpiko kati na bolingo, 3 bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino. 4 Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko.

5 Nkolo azali se moko, kondima mpe ezali se moko, libatisi mpe ezali se moko. 6 Nzambe azali se moko, azali mpe Tata ya bato nyonso ; aleki bato nyonso, asalaka na nzela ya bato nyonso mpe azali kati na bato nyonso.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.