Pular para o conteúdo
Publicidade

Êxodo 16

11 Yawe alobaki na Moyize :

12 Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana16.12 Mana elingi koloba : oyo nini ?. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino»

13 Kaka na pokwa wana, bakayi16.13 Kayi ezali ndeke lokola ebenga. eyaki mpe etondisaki molako ; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako.

14 Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe.

15 Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango :

Oyo nini ?

Pamba te bayebaki te soki ezali nini.

Moyize alobaki na bango :

Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia.

Veja também