5 Tango mwana mwasi ya Faraon akendeki kosukola na ebale Nili, wana basi basali na ye bazalaki kotambola pembeni ya ebale Nili, amonaki kitunga kati na matiti ya ebale ; mpe atindaki mwasi mosali na ye kozwa yango. 6 Afungolaki yango mpe amonaki kati na yango mwana moko ya mobali azali kolela. Ayokelaki ye mawa mpe alobaki : « Oyo azali solo mwana ya Ba-Ebre. »
7 Boye, ndeko na ye ya mwasi alobaki na mwana mwasi ya Faraon :
— Boni, nakoki kokende kolukela yo kati na basi ya Ba-Ebre mwasi oyo akoki komelisa mwana oyo mabele mpo na yo ?
8 Mwana mwasi ya Faraon azongiselaki ye :
— Iyo, kende !
Elenge mwasi akendeki mpe azwaki mama ya mwana mobali yango.
9 Mwana mwasi ya Faraon alobaki na mama yango : « Kamata mwana oyo, melisa ye mabele mpo na ngai, mpe nakofuta yo. »
Bongo mama yango azwaki mwana mpe akomaki komelisa ye mabele.