Pular para o conteúdo
Publicidade

Kobima 20:12-17

12 Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.

13 Okobomaka te.

14 Okosalaka ekobo te.

15 Okoyibaka te.

16 Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.

17 Okolulaka te ndako ya moninga na yo ; okolulaka te mwasi ya moninga na yo, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. »

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.