Pular para o conteúdo
Publicidade

Kobima 20:18-26

Moyize alobeli bato epai ya Nzambe

18 Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika 19 mpe balobaki na Moyize :

— Tika ete yo moko oloba na biso, mpe tokoyoka yo ; kasi Nzambe te, noki te tokokufa !

20 Moyize azongiselaki bango :

— Bobanga te ! Nzambe ayei nde komeka bino mpo ete kobanga Nzambe ezala kati na bino mpe bosala masumu te.

21 Bato bazalaki kaka mosika, wana Moyize apusanaki pembeni ya lipata oyo kati na yango Nzambe azalaki.

Banzambe ya bikeko mpe bitumbelo

22 Yawe alobaki na Moyize :

— Yebisa makambo oyo epai ya bana ya Isalaele : « Bomonaki bino moko ndenge nini nalobelaki bino wuta na likolo. 23 Bokomisalela te banzambe ya bikeko ya palata to ya wolo, mpo na kosangisa yango na Ngai. 24 Okotongela Ngai etumbelo ya mabele epai wapi okobonza bambeka na yo ya kotumba, bambeka na yo ya boyokani, meme na yo, ntaba na yo, ngombe na yo. Esika nyonso oyo nakomimonisa mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo. 25 Soki otongeli Ngai etumbelo ya mabanga, okotonga yango te na mabanga oyo bakata ; pamba te soki okati yango, okobebisa bosantu na yango. 26 Okomata te na etumbelo na Ngai na ematelo mpo ete bolumbu na yo emonana te. »

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.