Publicidade

Êxodo 25

Sanduku ya Boyokani mpe mofinuku

10 Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano. 11 Okobamba yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Okolatisa mpe songe na yango na wolo. 12 Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu. 13 Okosala mabaya mibale na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo. 14 Okokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya sanduku, mpo na komemela yango. 15 Mabaya yango ekotikala libela kati na bapete ya sanduku : bakolongola yango te. 16 Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.

17 Okosala mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. 18 Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. 19 Okotia ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe mosusu, na suka mosusu. Okokangisa bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale. 20 Mapapu ya basheribe ekozala ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bakozala ngambo na ngambo, mpe miso na bango ekotala mofinuku. 21 Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-