Basali ya Esika ya bule
1 Yawe alobaki na Moyize :
2 — Yoka, naponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ; 3 natondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso ; 4 mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze ; 5 mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso.