Pular para o conteúdo
Publicidade

Kobima 31:1-6

Basali ya Esika ya bule

1 Yawe alobaki na Moyize :

2 — Yoka, naponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ; 3 natondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso ; 4 mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze ; 5 mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. 6 Tala, napesi ye lokola mosungi Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani.

Mpe napesi bwanya epai ya bato nyonso ya misala ya maboko mpo ete basala misala nyonso oyo natindi yo :

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.