5 mpe bayaki koloba na Moyize :
— Makabo oyo bana ya Isalaele bazali kopesa eleki mingi mpo na kosala mosala oyo Yawe atindaki.
6 Bongo Moyize atindaki maloba oyo epai ya bana ya Isalaele :
— Tika ete moto moko te, azala mwasi to mobali, apesa lisusu makabo mpo na Mongombo !
Boye bato batikaki komema makabo, 7 pamba te biloko nyonso ezalaki ya kokoka mpo na misala nyonso oyo esengelaki kosalema : ezalaki kutu ya koleka.