36 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola osakanelaki bomengo na yo mpe otandaki bolumbu na yo kati na kindumba na bamakangu na yo mpe na banzambe na yo nyonso ya bikeko, makambo na yo nyonso ya mbindo ; mpe lokola obonzelaki banzambe wana ya bikeko makila ya bana na yo ya mibali, 37 nazali kosangisa bamakangu na yo nyonso oyo ozalaki kosepela elongo na bango, ba-oyo nyonso ozalaki kolinga mpe ba-oyo nyonso ozalaki koyina ; nakosangisa bango wuta na bangambo nyonso mpo ete batombokela yo, mpe nakotanda yo liboso na bango mpo ete bamona bolumbu na yo nyonso.