5 Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango.
6 Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe,
amonaki yango te lokola eloko ya kowelela,
7 kasi amikomisaki moto pamba,
akomaki lokola mowumbu,
amikomisaki lokola moto
mpe amonanaki bongo lokola moto ;
8 amikitisaki penza
mpe atosaki kino na kufa,
ata na kufa ya ekulusu.
9 Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso
mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso,
10 mpo ete, na Kombo na Yesu,
mabolongo nyonso efukama
kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,
11 mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo
mpo na nkembo ya Nzambe Tata.