6 Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe ; mpe mpo na kondima na ye, Nzambe akomisaki ye moto ya sembo. 7 Boye, boyeba malamu ete ezali kaka bato oyo bazali na kondima kati na Nzambe nde bazali bana ya Abrayami.
8 Makomi esilaki kobongisa ete Nzambe akokomisa Bapagano sembo na nzela ya kondima, mpe etatolaki Sango Malamu oyo epai ya Abrayami : « Bato ya bikolo nyonso bakopambolama mpo na yo. » 9 Boye, bato oyo bazali na kondima bazali ya kopambolama elongo na Abrayami, moto na kondima.