Pular para o conteúdo
Publicidade

Bagalatia 4:21-26

Boyokani ya bowumbu mpe ya bonsomi

21 Bino oyo bolingi kozala na se ya bokonzi ya Mobeko, boyebisa ngai nanu, bososolaka na bino te makambo oyo Mobeko elobaka ? 22 Ekomama kati na yango ete Abrayami azalaki na bana mibali mibale : mwasi mowumbu abotelaki ye mwana moko, mpe mwasi nsomi abotelaki ye mwana moko. 23 Mwana oyo mwasi mowumbu abotelaki Abrayami abotamaki na lolenge ya bomoto, kasi mwana oyo mwasi nsomi abotelaki ye abotamaki kolanda elaka ya Nzambe.

24 Makambo oyo epesami lokola ndakisa : Basi oyo mibale bazali kotalisa boyokani mibale. Moko ewutaki na ngomba Sinai mpe ebotaki bawumbu ; yango nde Agari azali kotalisa. 25 Agari azali ngomba Sinai kati na Arabi, akokani na Yelusalemi ya sik’oyo, pamba te ezali kati na bowumbu elongo na bana na yango. 26 Kasi Yelusalemi ya Likolo ezali nsomi, mpe yango nde ezali mama na biso ;

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.