Pular para o conteúdo
Publicidade

Bagalatia 4:27-29

27 pamba te ekomama :

« Sepela, mwasi ekomba,

yo oyo obotaka te !

Sepela makasi mpe ganga na esengo,

yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te !

Pamba te bana ya mwasi oyo asundolama bakozala ebele

koleka bana ya mwasi oyo azali na mobali. »

28 Nzokande bino bandeko na ngai, bozali bana ya elaka, lokola Izaki. 29 Kasi ndenge kaka mwana mobali oyo abotamaki na lolenge ya bomoto azalaki na kala konyokola mwana mobali oyo abotamaki na nzela ya nguya ya Molimo, ndenge wana mpe ezali kosalema sik’oyo.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.