Kosala bolamu mpo na bato nyonso
1 Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te. 2 Bomemisana mikumba bino na bino ; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto. 3 Soki moto songolo akanisi ete azali moto monene, nzokande azali kaka moto pamba, azali komikosa ye moko. 4 Tika ete moko na moko atala malamu misala na ye ! Soki akoki komikumisa mpo na yango, akomikumisa mpo na ye moko kaka, kasi mpo na bato mosusu te ; 5 pamba te moto na moto akosamba mpo na misala na ye moko.