Nzambe abengi Abrami
1 Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.
2 Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo ;
nakokomisa kombo na yo monene,
mpe okozala etima ya mapamboli.
3 Nakopambola bato oyo bakopambola yo,
mpe nakolakela mabe moto oyo akolakela yo mabe ;
mpe bato ya bituka nyonso
ya mabele bakomipambola mpo na yo. »