17 Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, ›
mabele elakelami mabe likolo na yo.
Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.
18 Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende.
Okolia matiti ya bilanga.
19 Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo
kino okozonga na mabele epai wapi owutaki,
pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. »