12 Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili.
13 Kayina alobaki na Yawe :
— Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema ! 14 Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.
15 Kasi Yawe alobaki na ye :
— Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo.
Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
16 Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi4.16 Nodi elakisi : mboka ya koyengayenga., na este ya Edeni.