23 Lemeki alobaki na basi na ye :
« Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ;
bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu :
Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ;
mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali !
24 Solo, bakozongisa mbala sambo
mabe oyo basali Kayina ;
kasi mpo na Lemeki,
ekozala mbala tuku sambo na sambo ! »