Jozefi amilakisi epai ya bandeko na ye
1 Jozefi akokaki lisusu komikanga te liboso ya bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye, agangaki : « Bobimisa bato nyonso ! » Boye, moto moko te azalaki pembeni na ye tango amimonisaki epai ya bandeko na ye ya mibali.
4 Jozefi alobaki na bango :
— Bopusana pembeni na ngai !
Tango bapusanaki, alobaki :
— Nazali Jozefi, ndeko na bino ya mobali oyo botekaki mpo ete bamema ngai na Ejipito. 5 Kasi sik’oyo, bomitungisa te mpe bozala na mawa te na ndenge botekaki ngai awa. Ezali mpo na kobikisa bomoi na bino nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino.
15 Apesaki bandeko na ye nyonso beze mpe alelaki. Sima na yango, basololaki.