Jozefi amilakisi epai ya bandeko na ye
1 Jozefi akokaki lisusu komikanga te liboso ya bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye, agangaki : « Bobimisa bato nyonso ! » Boye, moto moko te azalaki pembeni na ye tango amimonisaki epai ya bandeko na ye ya mibali. 2 Lokola alelaki na mongongo makasi, bato ya Ejipito bayokaki ye ; mpe sango ekendeki kino na ndako ya Faraon. 3 Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali :
— Nazali Jozefi ! Tata na ngai azali nanu na bomoi ?
Kasi bandeko na ye bakokaki koyanola ye te, pamba te bazalaki kolenga liboso na ye.