3 Nzokande, mobu na mobu, bambeka wana ezalaki kozongisa masumu na makanisi na bango, 4 pamba te makila ya bangombe ya mibali mpe ya bantaba ezali na makoki te ya kolongola masumu. 5 Yango wana, tango Klisto ayaki na mokili, alobaki :
« Ozalaki na posa te ya bambeka to ya makabo,
kasi osalaki ngai nzoto.
6 Osepelaki te na bambeka ya kotumba
mpe na bambeka mpo na masumu.
7 Bongo nalobaki : ‹ Tala ngai oyo, nayei,
nayei, oh Nzambe, mpo na kosala mokano na Yo,
kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku. › »
8 Alobaki liboso :
« Ozalaki na posa te mpe osepelaki te na bambeka, na makabo,
na bambeka ya kotumba mpe na bambeka mpo na masumu. »
Nzokande ezalaki kopesama kolanda Mibeko.
9 Alobaki lisusu : « Tala ngai oyo, nayei mpo na kosala mokano na Yo. » Boye, alongolaki losambo ya liboso mpo na kotia losambo ya mibale. 10 Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela.