Publicidade

Hebreus 12

5 Mpe bobosani maloba nyonso ya malendisi oyo ayebisaki bino ndenge tata ayebisaka bana :

« Mwana na Ngai, kozwa na pamba te etumbu ya Nkolo,

mpe kobungisa mpiko na yo te soki apameli yo.

6 Pamba te Nkolo apamelaka moto oyo Ye alingaka,

apesaka etumbu na moto nyonso

oyo Ye ayebaka lokola mwana na Ye»

7 Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te ? 8 Soki bapesi bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, elingi koloba ete bozali bana bazanga tata, kasi bana ya ndako te.

9 Mpo ete biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni, oyo bazalaki kopesa biso bitumbu, mpe tozalaki kaka kotosa bango, bongo mpo na nini te kotosa Tata ya milimo mpo ete tozwa bomoi ?

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-