Pular para o conteúdo
Publicidade

Ba-Ebre 3:7,8,12,13,15

Bopemi ya bandimi ya Nzambe

7 Yango wana, kolanda ndenge Molimo Mosantu alobi :

« Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,

8 boyeisa mitema na bino mabanga te,

ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe,

na mokolo ya komekama kati na esobe

12 Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi ; 13 kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga. 15 kolanda ndenge elobama :

« Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,

boyeisa mitema na bino mabanga te,

ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe. »

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.