Pular para o conteúdo
Publicidade

Ba-Ebre 8

6 Kasi sik’oyo, Yesu azwi mosala oyo eleki motuya, pamba te azali Moyokanisi kati na Boyokani oyo eleki malamu, Boyokani oyo etongami na likolo ya bilaka ya malamu koleka.

Boyokani ya kala mpe Boyokani ya sika

7 Solo, soki boyokani ya liboso ezangaki pamela, tina ya koluka boyokani ya mibale elingaki kozala te.

8 Nzokande, Nzambe apamelaki penza bato na Ye tango alobaki :

« Na mikolo ekoya, nakosala Boyokani ya sika

elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda :

9 ekozala ndenge moko te na boyokani

oyo nasalaki elongo na batata na bango

tango nasimbaki bango na loboko

mpo na kobimisa bango na Ejipito,

pamba te lokola bakataki boyokani na Ngai,

Ngai mpe napesaki bango mokongo,

elobi Nkolo.

10 Kasi tala Boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele,

sima na mikolo wana,

elobi Nkolo :

‹ Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango,

nakokoma yango kati na mitema na bango,

nakozala Nzambe na bango,

mpe bango bakozala bato na Ngai.

11 Moko te akoteya lisusu moninga to ndeko na ye

na koloba : Yeba Nkolo !

Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai,

kobanda na mwana moke kino na mokolo,

12 nakolimbisa mabe na bango

mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te› »

13 Awa Nkolo abengi Boyokani oyo « Boyokani ya sika» elingi koloba ete akomisi oyo ya liboso boyokani ya kala ; nzokande eloko oyo ekomi ya kala mpe enuni ekomi pene ya kolimwa.

Veja também