Pular para o conteúdo
Publicidade

Yoane 1

45 Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye :

Tomoni Yesu ya Nazareti, mwana mobali ya Jozefi, oyo Moyize alobela kati na buku ya Mobeko, mpe oyo basakoli balobela.

46 Natanaele atunaki ye :

Boni, eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti ?

Filipo azongiselaki ye :

Yaka mpe okomona yo moko.

47 Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye :

Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te !

48 Natanaele atunaki Ye :

Oyebi ngai ndenge nini ?

Yesu azongiselaki ye :

Liboso ete Filipo abenga yo, wana ozalaki nanu na se ya nzete ya figi, namonaki yo.

49 Natanaele alobaki :

Moteyi, ozali solo Mwana na Nzambe ; ozali penza Mokonzi ya Isalaele.

50 Yesu alobaki na ye :

Ondimi kaka mpo ete nalobi na yo : Namonaki yo na se ya nzete ya figi ? Okomona lisusu makambo minene koleka oyo.

51 Bongo alobaki lisusu : « Nazali koloba na bino penza ya solo : bokomona Likolo kofungwama, mpe ba-anjelu ya Nzambe komata mpe kokita mpo na Mwana na Moto»

Veja também