Pular para o conteúdo
Publicidade

João 12

Yesu akoti na Yelusalemi

12 Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi. 13 Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu ; bazalaki koganga :

« Ozana !

Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo,

Mokonzi ya Isalaele »

14 Yesu amonaki mwana moko ya ane mpe avandaki na likolo na yango kolanda ndenge ekomama :

15 « Siona, engumba kitoko, kobanga te !

Tala, mokonzi na yo azali koya,

avandi na likolo ya mwana ya ane »

16 Bayekoli ya Yesu bayebaki nanu te tina ya makambo oyo ezalaki kosalema. Kaka tango Yesu akotaki kati na nkembo nde basosolaki ete makambo yango ekomamaki na tina na Ye, mpe ete bakokisaki kaka makambo oyo Makomi eloba.

17 Bato nyonso oyo bazalaki elongo na Yesu tango abengaki Lazare ete abima na kunda mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki. 18 Yango wana ebele ya bato bakendeki koyamba Yesu mpo ete bayokaki ete Ye nde asalaki likamwisi yango. 19 Bongo Bafarizeo balobanaki bango na bango :

Bomoni, bokokoka lisusu eloko moko te ; bato nyonso bakomi na bango kolanda ye !

Veja também