Yesu asukoli makolo ya bayekoli na Ye
1 Liboso ete feti ya Pasika ekoma, Yesu ayebaki ete tango na Ye ekoki mpo na kotika mokili oyo mpe kokende epai ya Tata. Lokola azalaki kolinga bato na Ye, oyo bazalaki kati na mokili, akobaki kolinga bango kino na suka.
2 Bongo, wana bazalaki kolia elongo, Satana asilaki kotia kati na motema ya Yuda Isikarioti, mwana mobali ya Simona, makanisi ya koteka Yesu. 3 Yesu ayebaki ete Tata apesaki Ye bokonzi likolo ya makambo nyonso, ete awutaki epai ya Nzambe mpe ete asengelaki kozonga epai ya Nzambe ; 4 atelemaki longwa na mesa, alongolaki bilamba oyo alataki, azwaki eteni moko ya elamba mpe amikangaki yango na loketo. 5 Bongo, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na Ye mpe kopangusa yango na eteni ya elamba oyo amikangaki na loketo. 6 Tango akomaki na esika oyo Simona Petelo azalaki, Simona Petelo alobaki na Ye :
— Nkolo, Yo penza osukola ngai makolo ?
7 Yesu azongiselaki ye :
— Likambo oyo Ngai nazali kosala, yo okoki te kososola yango sik’oyo ; kasi okososola yango na sima.
8 Kasi Petelo alobaki na Yesu :
— Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo !
Yesu azongiselaki ye :
— Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.
9 Simona Petelo alobaki na Yesu :
— Nkolo, lokola ekomi bongo, kosukola ngai kaka makolo te, kasi sukola ngai lisusu maboko mpe moto.
10 Yesu alobaki na ye :
— Moto oyo awuti komisukola nzoto azali penza peto ; azali kaka na posa ya kosukola makolo na ye. Nzokande bino, bozali peto ; kasi bino nyonso te.
11 Solo, Yesu ayebaki moto oyo akoteka Ye ; yango wana alobaki : « Bino nyonso bozali peto te. »
12 Sima na Yesu kosukola bango makolo mpe kolata lisusu bilamba na Ye, avandaki lisusu na mesa mpe alobaki na bango :
— Boni, bososoli tina ya likambo oyo nawuti kosala bino ? 13 Ndenge bobengaka Ngai « Moteyi » mpe « Nkolo, » bolobaka na bino penza ya solo, pamba te nazali penza Moteyi mpe Nkolo. 14 Boye soki Ngai, Moteyi mpe Nkolo na bino, nasukoli bino makolo, bosengeli, bino mpe, kosukolana makolo ; 15 pamba te napesi bino kaka ndakisa, mpo ete, bino mpe, bosalaka ndenge kaka Ngai nasali bino. 16 Nazali koloba na bino penza ya solo : mowumbu aleki nkolo na ye te na bokonzi, mpe ntoma aleki motindi na ye te na bokonzi. 17 Wana bosili koyeba makambo oyo, bozali bato ya esengo soki kaka botie yango na misala.