6 Tango akomaki na esika oyo Simona Petelo azalaki, Simona Petelo alobaki na Ye :
— Nkolo, Yo penza osukola ngai makolo ?
7 Yesu azongiselaki ye :
— Likambo oyo Ngai nazali kosala, yo okoki te kososola yango sik’oyo ; kasi okososola yango na sima.
8 Kasi Petelo alobaki na Yesu :
— Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo !
Yesu azongiselaki ye :
— Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.