8 Filipo alobaki na Yesu :
— Nkolo, lakisa biso Tata ; tozali na posa ya eloko mosusu te.
9 Yesu azongiselaki ye :
— Ah Filipo ! Kala nyonso oyo nazalaka elongo na bino, oyebaka na yo kaka Ngai te ? Moto oyo amoni Ngai amoni Tata. Bongo ndenge nini olobi : « Lakisa biso Tata ? »