13 Bolingo oyo eleki monene ezali : kokaba bomoi mpo na balingami. 14 Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.
15 Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.