12 Kobanda kaka na ngonga wana, Pilato akomaki koluka nzela ya kotika Yesu ; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga :
— Soki otiki ye, wana ozali na yo moninga ya Sezare te ! Pamba te moto nyonso oyo amikomisi mokonzi azali monguna ya Sezare.
13 Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu na libanda mpe avandaki na esambiselo, na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gabata19.13 Gabata elakisi : esika batanda mabanga.. » 14 Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda :
— Botala mokonzi na bino !
15 Kasi babandaki koganga :
— Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu !
Pilato alobaki na bango lisusu :
— Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ?
Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki :
— Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !
16 Pilato akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. Boye, bakamataki Yesu mpe bakendeki na Ye.
Kufa Ya Yesu
(Mat 27.32-56; Mlk 15.21-41; Lk 23.26-49)