Publicidade

João 19

23 Sima na basoda kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na Ye mpe bakabolaki yango na biteni minei : soda moko na moko azwaki eteni moko. Bakamataki mpe nzambala na Ye, oyo ezalaki ya kotongama te, kasi ezalaki kaka elamba moko, kobanda na likolo kino na se.

24 Basoda balobanaki bango na bango :

Topasola yango te, kasi tobeta zeke mpo na koyeba soki nani akozwa yango.

Esalemaki bongo mpo ete Makomi oyo ekokisama :

« Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango

mpe babetaki zeke mpo na nzambala na ngai»

Ezali makambo wana nde basoda basalaki.

25 Tala bato oyo batelemaki pene ya ekulusu ya Yesu : Mama na Ye, ndeko mwasi ya mama na Ye, Mari oyo azalaki mwasi ya Klopasi, mpe Mari ya mboka Magidala.

26 Tango Yesu amonaki ete moyekoli oyo azalaki kolinga atelemi pembeni ya mama na Ye, alobaki na mama na Ye :

Mwasi, tala mwana na yo !

27 Mpe alobaki na moyekoli yango :

Tala mama na yo !

Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-