28 Sima na yango, wana Yesu asosolaki ete makambo nyonso esili kosalema, abimisaki maloba oyo mpo ete Makomi ekokisama :
— Nayoki posa ya mayi.
29 Lokola ezalaki na mbeki moko etonda na vino ya ngayi pembeni ya esika yango, batiaki, na songe ya nzete moko ya izope, eponze moko epola na vino yango ya ngayi mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu. 30 Tango kaka Yesu amelaki vino yango ya ngayi, alobaki :
— Nyonso ekokisami.
Bongo, akitisaki moto mpe azongisaki molimo na Ye.