Pular para o conteúdo
Publicidade

João 2

Likamwisi ya liboso : Yesu abongoli mayi vino

1 Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango. 2 Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.

3 Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye :

Bazali lisusu na vino te !

4 Kasi Yesu azongiselaki ye :

Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.

5 Mama na Ye alobaki na basali :

Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.

6 Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale. 7 Bongo Yesu alobaki na basali :

Botondisa bambeki oyo na mayi.

Batondisaki yango meke.

8 Alobaki lisusu :

Sik’oyo, botoka mayi wuta na bambeki mpe bomema yango epai ya mokambi ya feti.

Bamemaki yango epai na mokambi ya feti.

9 Mokambi ya feti amekaki mayi oyo Yesu abongolaki vino. Ayebaki te soki basali bazwaki vino yango wapi ; nzokande bango moko basali bayebaki, pamba te bango nde batokaki mayi. Mbala moko, mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki 10 mpe alobaki na ye : « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko ; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo »

11 Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.

Veja também