19 Yesu azongisaki :
— Bobuka Tempelo oyo, mpe Ngai nakotonga yango lisusu na mikolo misato.
20 Bayuda balobaki lisusu :
— Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato ?
21 Nzokande Tempelo oyo Yesu azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na Ye moko.