Pular para o conteúdo
Publicidade

Yoane 20

Yesu abimeli Mari ya Magidala

11 Nzokande, Mari atelemaki na libanda, pene ya kunda, mpe azalaki kolela. Mpe wana azalaki kolela, agunzamaki mpo na kotala kati na kunda ; 12 amonaki ba-anjelu mibale balata bilamba ya pembe mpe bavanda na esika oyo nzoto ya Yesu ezalaki : moko na ngambo ya moto, mpe mosusu, na ngambo ya makolo. 13 Ba-anjelu batunaki ye :

Mwasi, mpo na nini ozali kolela ?

Azongisaki :

Nazali kolela mpo ete balongoli Nkolo na ngai mpe nayebi te soki batie Ye wapi ?

14 Tango alobaki bongo, abalukaki mpe amonaki Yesu atelemi wana, kasi ayebaki te ete ezali Yesu. 15 Yesu atunaki ye :

Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Ozali koluka nani ?

Mari akanisaki ete azali mosali elanga ; alobaki na ye :

Tata, soki yo nde moto olongolaki Ye, yebisa ngai esika nini otie Ye mpo ete nakende kokamata Ye.

16 Yesu alobaki na ye :

Mari !

Mari abalukaki mpe alobaki na lokota ya Ebre :

Rabuni20.16 Rabuni elingi koloba : Moteyi. !

17 Yesu alobaki na ye :

Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.

18 Mari, moto ya mboka Magidala, akendeki koyebisa bayekoli ete awuti komona Nkolo ; ayebisaki bango lisusu makambo oyo Nkolo alobaki na ye.

Veja também