Pular para o conteúdo
Publicidade

Yoane 20

Yesu abimeli bayekoli na Ye

19 Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, wana bayekoli basanganaki esika moko kati na ndako mpe bakangaki malamu bikuke mpo ete bazalaki kobanga bakonzi ya Bayuda, Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki :

Tika ete kimia ezala na bino !

20 Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na Ye mpe mopanzi na Ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo. 21 Yesu alobaki na bango lisusu :

Tika ete kimia ezala na bino ! Ndenge Tata atindaki Ngai, Ngai mpe nazali kotinda bino.

22 Sima na Yesu koloba makambo wana, afulaki bango mopepe mpe alobaki na bango :

Boyamba Molimo Mosantu ! 23 Bato oyo bokolimbisa masumu na bango, masumu na bango ekolimbisama ; kasi ba-oyo bokolimbisa te, bakozwa mpe bolimbisi te.

Veja também