31 Na tango yango, bayekoli bazalaki kosenga na Yesu :
— Rabi, lia.
32 Kasi Yesu azongiselaki bango :
— Ngai, nakolia bilei oyo bino boyebi te.
33 Bongo bayekoli na Ye balobanaki bango na bango :
— Boni, ekoki kozala na moto oyo amemelaki Ye bilei ?
34 Yesu alobaki na bango :
— Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.